bob elvis - lettre à ya tshitshi, partie 2 lyrics
ya tsh+tshi banda okenda
bilan ya mwana na yo eza négatif (mawa)
2023 kala te mais rdc ekomi n’ango
lokola allemagne te (na soni)
ya tsh+tshi banda okenda
toza dirigés na ba stagiaires
vision ya mokonzi ezoyebana te
programme ya gouvernement pe ezoyebana te
ya tsh+tshi banda okenda
état de droit ekomi mise en scène (comédie)
moyibi abimi prison
mais mbongo ayibaki azongisi te (luvunu)
ya tsh+tshi banda okenda
mayi na courant eza te na kasaï
bana bazotanga na se
mais president azosomba voiture ya jouet
ya tsh+tshi banda okenda
maître nageur balongoli ye na udps
mais likambo ya kokamwa
lipasa na ye kabuya alandi ye tе
ya tsh+tshi banda okenda
bureau ya [?] eza na mayi tе
oyo ya snel eza na courant te
bureau ya snel bazosalela panneau solaire
ya tsh+tshi banda okenda
ba matchs ya léopards, tension na tension
ba supporters bagangi, balembi
équipe ezo compter na banganga (soni)
ya tsh+tshi banda okenda
fatshi asali plus de 100 voyages
plus de 100 millions de dollars
mais congo ezodefa avion na kenya
ya tsh+tshi banda okenda
poutine azoyokela moto te
bimela ye ata na ndoto
atika masolo ya satan 2
ya tsh+tshi banda okenda
union sacrée ekoma union salite
katumbi tantôt aza na félix
tantôt akomi opposant (caméléon)
ya tsh+tshi banda okenda
gouverneur abuka zando
kin bopeto esimbi te
mais eudoxie na grand p baya kosala nini?
ya tsh+tshi banda okenda
tovandi tozozela ba investeurs
mais bayeli biso vandamme
bapesi ye na passeport diplomatique
ya tsh+tshi banda okenda
pprd ekota opposition
ba shadary, ba minaku, ba boshab
bakoma pe ko marcher
ya tsh+tshi banda okenda
tribalisme ezosila te
ba politiciens bazo diviser peuple
ba partis politiques ekoma ba [?]
ya tsh+tshi banda okenda
pasi ya ba congolais ebota misisa
biloko nionso emati
na mopepe ya kuado pe emati
[?]
Random Lyrics
- l4vr - idy lyrics
- lil pump - birthday lyrics
- firebird - lose your delusions lyrics
- la goony chonga - riskee lyrics
- adam tyler - waiting in line lyrics
- leellamarz (릴러말즈) - leellamarz - on the street (romanized) lyrics
- blurhie - i love through a crystal ball lyrics
- yukimekklord & real valery - serpent lyrics
- bendo $ex - todos lyrics
- poperulin - privado lyrics