
charles mombaya - inch'allah lyrics
lead 1 :
pasi ya baklisto ebanda n’ango wuta kala
pasi ya bandimi na yesu ebanda n’ango wuta kala
inch’allah (3x)
nzambe ye nde ayebi
lead 2 :
soki ye nzete ya mobesu aniokwamaki ti kino akufa
kasi biso nzete ya kokawuka ebongi na biso toyika se mpiko
inch’allah (3x)
nzambe ye nde ayebi
lead 3 :
kondima nga nandima yesu ekomela nga nde pasi na libota
kosambela nga nasambelaka namema nde ngambo na kati ya quartier
inch’allah (3x)
nzambe ye nde ayebi
lead 4 :
kofinga bakofinga kaka ngai oh kotonga kaka na kombo na ngai
balobi wuta nakoma kosambela situation na ngai eza n’ango ko changer te
inch’allah (3x)
nzambe ye nde ayebi
lead 5 :
libala nga na lukaka balobi nga wana nazali monzemba
libota nga nalelaka balobi nga wana nanuni ekomba
inch’allah (3x)
nzambe ye nde ayebi
lead 6 :
masiya nga nalandaka nayebi aza nzambe na nga akosala
ata lel’oyo bokoseka nga lobi akopesa kaka solution
inch’allah (3x)
nzambe ye nde ayebi
Random Lyrics
- drive by cinema - losing touch lyrics
- nolan pilgrim - leaving soon lyrics
- lickaflame - august lyrics
- dino james - pyaar pyaar lyrics
- e4teen, jxst kareem, arkti - boss talk lyrics
- vita kdi - tresno sudro lyrics
- justin georgewitz - lanky dance lyrics
- hunny bee - ballerina lyrics
- zorix - luv lyrics
- moonshade - everlasting horizons lyrics