azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

fally ipupa – doc jeff lyrics

Loading...

[refrain]
bo pekisa nga té
na bima na landa chérie na nga
boni ba balles perdues ebomela bango
na ba ndako
bo pekisa ngai té
na tika’o landa docteur ndjadi leteta
boni ba balles perdues ebomela bango
na ba chambres bazo lota
bo pekisa nga té
na bima na landa chérie na nga (na kufa na nga na zela bolingo)
boni ba balles perdues ebomela bango
na ba ndako

[couplet 1]
la vie sukali
na komi omela ya ko kanga zolo
lokolo ya congo bololo
verre ata propre, kitoko
mais soki eza na solo a zeyi
ya sardine to ya maki
ko mela mayi ekomaka nkele
jeff yo oza solution na ngai
na lela munoko nini po opesa nga solution
kaka na maboko na yo nde zuaka pongi
soulagé nga docteur ndjadi leteta
papa na jamie ndjadi, kenaya ndjadi
na place a poisson opesi nga poison
ko kamua te liwa
je donnerai la faute à qui ?
et la raison à qui ?
réponse exacte, ya bolingo eza té
yango na lingi na nga na landa yé

[refrain]
bo pekisa nga té
na bima na landa chérie na nga (na landa chérie na ngai eh)
boni ba balles perdues ebomela bango
na ba ndako
na landa docteur jeff ndjadi leteta, don de dieu

[couplet 2]
amour na nga, esili valeur na midi
ebakisi kutu chaleur, o lati na nko blouson ya cuir
kaka po bengana nga, jeff boma nga ata pona butu
o lobi oza chauffe-souris
mais kasi na moyi, o zo luka nini
c’est que oboyi n’o nga kaka
yango o komi ko inventé makambu
soki ba lingi yo lisusu te
ata opesi mbote ya pamba ekomaka mabé
élève oyo azui 10 sur 10, na examen a religion
elakisi akoti lola te oh
na moni yango lelo oyo
nga moto na tonda ba bisous
nzoto elembaka ba calins
na komi’o luka ata na yiba
na sani ya semba bilokota bolingo
milliardaire a kufi na nzala
arara bolingo, ya docteur jeff ndjadi leteta, don de dieu
brosse à dent, ata o tié dentifrice ébélé
jamais éko longola lokuta
na monoko ya menteur
chérie yo o yibi nga motema
après éko tobola estomac
mais lifuti bolingo na’o
efuti ba parents na nga eh
liwa eh, liwa oh oh liwa oh oh
liwa oh, na za na nini eh
couturiers étonga ba costume
mais pota na motema ésimba té
égratignure ya pamba
monganga alembani na ngo

[refrain 2]
po eza problème a love
eh love eh, love eh
po eza problème a love
eh love eh, love eh
po eza bolingo a jeff
bolingo, lingo
eza problème a love
bolingo, lingo
nga na kufeli bolingo
eh love eh, love eh
chérie a kufeli bolingo
eh love eh, love eh

[couplet 3]
docteur jeff, pesa nga motema
docteur jeff, soignez nga leteta
docteur jeff, sala sala nga ba biens
docteur jeff, tika’o tika nga bongo
docteurisez nga docta eh
docteur jeff
docteur jeff
docteur jeff
brosse à dent, ata o tié dentifrice ébélé
jamais é ko longola lokuta
na monoko ya menteur
docteur jeff keba na venin, ya ba fitol
seka nga na sepéla, po na yoka nzoto hum (epasuka)
seka nga na sepéla, sekisa nga ndjadi leteta (epanzana)
seka nga na sepéla, po na yoka nzoto

[pont]
docteur jeff, ndjadi leteta, don de dieu
mwana mama thérèse lepala

[refrain 2]
eh love eh, love eh
po eza problèmes a love
eh love eh, love eh
po eza bolingo a jeff
bolingo, lingo
eza problème a love
bolingo, lingo
nga na kufeli bolingo
eh love eh, love eh
chérie a kufeli bolingo
eh love eh, love eh

[refrain 1]
bo pekisa nga té
na bima na landa chérie na nga
boni ba balles perdues ebomela bango
na ba ndako
bo pekisa nga té
na tika’o landa docteur ndjadi leteta
boni ba balles perdues ebomela bango
na ba chambres bazo lota
bo pekisa nga té
na bima na landa chérie na nga
boni ba balles perdues ebomela bango
na ba ndako

[couplet 4]
mutu a sala liwa eh
yé pé mutu a sala l’amour
alors na poni liwa
mourir pour une bonne cause, j’accepte
bo tika nga na kufa na nga
na amour na ndjadi leteta eh
au pire je die en martyr
au mieux je sauve mon amour

[refrain 1]
bo pekisa nga té
na bima na landa chérie na nga
boni ba balles perdues ebomela bango
na ba ndako
bo pekisa nga té
na bima na landa chérie na nga
boni ba balles perdues ebomela bango
na ba ndako



Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...