azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

flamme kapaya - j-zéro lyrics

Loading...

nabanzaki okozonga sima ya sanza misato
natali na calendrier jour j moins zéro
mokolo yango ekoki eh nga nakomi kotala montre
opesaki ngai ngonga nini okozonga te

na masuwa to na avion na motuka to na engunduka eh
yango natandi etoko na monoko ya lopango na ngai
nakozela yo bona

ndoto nionso eyaka se na kwiti ya pongi
ba projets na ba promesses topesanaki
nzoka ezalaki bilanga matembele likolo ya mabanga
otie na motema na nga volcan ya nyiragongo
ngai ko natutaka ntolo boye na lolendo nionso eh
lelo nasambwe soni elongwaka na liniuka te oh, mama

chapitre nionso na bible ezalaka na verset
ebele ebandaka se na kati bona eh
bwato na masuwa nzela n’ango mayi
kake еbomi moto ezangi ndoki te

soki mbwa aswi moto bakangaka mokolo na ye
yango ngai namoni bolingo еzali nde singa ya pendaison
mopepe ya mbula oh ekombelaki nga lopango
kasi eye kozongisela nga lisusu bosoto ya makasa boye
liyanzi ezalaka maladie na nzoto ya moto
kasi mokusa na yango ezalaka nde elengi elengi soki yo okwanzi eh
ebongaki te mi amor
okende mobembo otika ngai awa nazela
likombe yo okangaki ata lopango te eh
bongo moyibi soki akoti ayibi akei

ebongaki te engobo
okende mobembo otika ngai awa nazela
likombe yo okangaki ata lopango te oh
bongo moyibi soki akoti ayibi akei

bona nabo kozanga zanga yo
neti mokufi okoluka pema na ye
mobembo ezali liwa te okei motako te
mok+mba ya bolingo eleki ya maman na bé bébé

déception eleki volcan ya nyiragongo
moto n’ango ebomaka ba larve etuaka
koleka kutu moto ya lifelo
nyiragongo esika bolingo ezalaki na motema, na motema

bona

ebongaki te bona engobo
okende mobembo otika nga moko
kotika nga moko te
soki moyibi aye koyiba nga
bona, bona engobo
kotika ngai moko te
soki moyibi aye koyiba nga
pardon bona, bona engobo
kotika nga moko te
soki moyibi aye koyiba nga
nakomi kobanga bangaka



Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...