azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

josé nzita – mondele lyrics

Loading...

1
yesu na nga oyaka bayebisi ngai oza mondele
kasi nga nayebi yo nde okufelaki ngai

[refrain 1]
yesu na nga oyoka bayebisi nga oza mondele
kasi nga nayebi yo nde okufelaki
ngai 2x

2
bato batuni nga mpo na nini nayembelaka yo
bayebisi nga ozali mondele
balobi kaka mpo na bayuda mpo na ngai te
esengeli nga naluka nzambe na nga ya bamwindo
balobi kaka mpo na ba juifs mpo na ngai te
esengeli nga naluka nzambe na nga ya afrika
natali na bible namoni oza na makila ya mindele te
makila na yo mpe ya bamwindo te oza na makila ya lobiko

[refrain 1]
3
banzambe nyoso batalisi ngai na se na mabele oyo
moko te akufa mpe asekwa lokola yesu
bango nyoso balala na kunda bapola
bazali kozela kozonga na ye yesu
molimo na nga esepela opona nzambe ya solo
oyo bato nyoso bakozela ya solo penza aza nzambe
[refrain 1]
4
kobotama na ye bikamwa eee
kokufa na ye mpe bikamwa yesu eee
abotama na lisanga ya mwasi na mobali te
abotamaki na ye moko ooo
azali lokola libanga oyo daniel amonaka
euti na likolo na loboko ya moto te
yango nde loyembo na ngai
molimo na nga esepela opona nzambe ya solo
oyo bato nyoso bakozela ya solo penza aza nzambe

[refrain 1]
5
mwasi na samalia ayebisaki yesu
biso tok+mamelaka na ngomba
bino bolobi na yelusaleme
kasi bakoko na biso bak+misaki nzambe yango oyo eeaa
yesu azongiseli ye ezali lisusu na ngomba te
na yelusaleme mpe te lelo ekomi ya molimo

[refrain 2]
ezali lisusu bayuda ya mposo te bamindele te bakomona yesu 2x
lelo ekomi ya molimo na moto nyoso akondima yesu 2x

6
mposo mwindo mpe te ee
ya mindele mpe te oo
lelo ekomi bayuda na kati
ba oyo bayambi yesu mokolo nkolo mpe mokonzi
bango nde bakokota kuna
ezali lisusu bayuda ya mposo te bamindele te kaka bakomona yesu lelo oo
[refrain 2]



Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...