azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

lutumba simaro - verre cassé lyrics


tongo ya lelo oh tongo ya makambo ima
moyi moboyi kobima lelo
tongo ya mokuya mama eh

tongo ya lelo oh tongo ya makambo mama eh
ndoto nalotaki na butu ndoto ya bandoki mama eh
fololo na loboko kende na lilita ya tata
osenga bolimbisi oboyaki kotosa maloba maye eh

soki bongo ebosani bandeko to pe esali faute
nzoto mobimba ekofuta faute ya bongo
pongi na kiti ya matanga bandeko ndoto ndambo ndambo
epayi bakoyembe, epayi ba kolela mama eh

mopepe mwa kaina mwa pokwa na moyi mwa ebale
naboyi ememela ngai ngo chérie oh
sango na yo ya mitelengano

instrumental

samedi ya lelo oh
samedi ya makambo mama
ndoto nalotaki yo, ndoto ya makambo ye

poso ya lelo oh, poso ya makambo maman
dix ans de silence oh
lelo opesi nga raison na se ya motema
nabondelaki yo mingi ebongaki oyokela ngai
tala lelo oyo okomi koniokwama
nga nasi nabali, nasi nabali eh

sango esali nga pasi
balobi ngai maboko makasi
babosani bapasi namonela ye nazua souvenir te
kaka ba chocs ya l’amour

nabondelaki yo mingi nalobaki se likambo moko
binso bikongenga na miso nionso pauni te
fololo na maboko kende na lilita ya tata
osenga bolimbisi oboyaki koyoka maloba ma ye

soki bongo ebosani bandeko to pe esali faute
nzoto mobimba ekofuta oh, faute ya bongo eh

pongi na kiti ya matanga ba ndeko
ndoto ndambo ndambo
epayi tokoyemba oh
epayi tokolela, massiya eh

mopepe mwa pokwa mwa moyi mwa ebale
nasengi ememela nga oh
losambo na nga epayi ya nzambe
instrumental

lelo yo wana na mbeto ya lopitalo
nga nazangi moyen natala yo
epayi nga natikala nga nasi nabala
bakopesa nga te permission natala yo

sango nayoki olingi kokufa
nga nazangi nguya nabikisa yo
napesi elikia se na losambo
nalongoli malomba ya kanda nionso tolobanaka

instrumental



Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...