azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

marie misamu - associé lyrics

Loading...

soki natali bomoyi na ngai eh
ngai nani nabeta tolo eh?
nazalalaki elili ya pamba
bomoyi nzoto molimo nakaba na satan eh!

bato babandaki kotala ngai
bakomaki koloba na confesser
po bapasi elekaki ngai eh
balobaki ezali etumbu ya ba nzambe na nga lalala lalala

ngai nakende wapi ngai oyo?
natia elikia epa nani eh?
balobi eza na papa moko
aza capable ya kozua vie na nga en charge
natie moto bakata nandimi eh…

associé eh associé na nga yesu eh
associé eh yaya associé na nga yesu eh

associé oh yo yo, associé na nga yesu eh
associé oh yo yo, associé na nga yesu eh

baninga nga nakima nzambe ndenge nini eh?
atindaki mwana na ye moko eh
asopa makila po nga nabika oh
to signa contrat na makila ya longue viе eh
associé oh yo yo, associé na nga yesu eh
associé oh yo yo, associé na nga yеsu eh

hum! ngai nazali nzete bino bitabe
eloba ye moko jésus
moïse amonaki nzete epeli moto ezozika te
yoka sekele ya nga na yesu oyo
nzete aziki te bitabe ekozika ndenge nini? mama eh

associé oh yo yo, associé na nga yesu eh
associé oh yo yo, associé na nga yesu eh

ah mokili oyo pasi
moto na moto na moto na moto na ye
oyo ya nga napona jésus eh
to signa contrat na makila eh
oh yaya oh yaya associé na ngai yesu eh

associé oh yo yo, associé na nga yesu eh
associé oh yo yo, associé na nga yesu eh

wo!! mubidi eh ye ye
mubidi di tshanana
kibualukayi nzambi wa kambane
katuyinenda tudi tshanane, eh
hozana hozana hozana
associé oh yo yo, associé na nga yesu eh
associé oh yo yo, associé na nga yesu eh

eh yahwe ye, eh yahwe ye
asalaka nini eh?
eh yahwe ye, nzambe ya miracle ye
bikisa ngai eh, sekwisa ngai eh, ah yahwe

(eh yahwe, eh yahwe)
asalaka nini eh?
(eh yahwe, alongolaka bato soni na miso ya bato)
ata babwaki yo, bamoni yo pamba yaya azali eh ye!
asalaka nini eh
moninga ya tango nionso oh
alembaka te, abwakaka te
asalaka nini eh
kombo na ye yesu eh
eh yaya eh asalaka nini eh?
(alongolaka bato soni na miso ya bato)

nabombi bombi nakoki te, yahwe
nasopi baposa na nga na se ya mokano na yo, longola soni
esika oyo bakundi ngai eh
yesu amonaka fourmi na se ya libanga molili eh
bimisa ngai eh, bimisa ngai eh
ba douleurs na ngai oyo
epesi ngai maloba, yaya
ya kolobela yo na litoyi yaya eh
répondre na cas na ngai eh
tango ya pole ekoki
yawhe asalaka nini eh
papa soni na nga emati nzete eh
ah, yaya eh, asalaka nini eh
yo belema, belema, belema
yo otala bana eh
toluki yo butu, moyi
y′ozali wapi eh? yawhe eh, eh, eh
yawhe, papa, yawhe eh yoka
tia kombo na nga na liste ya mapamboli na yo
obosanaka te, ba promesses opesaka na bana na yo
répondre na cas na ngai eh, yaya oza wapi olongola soni



Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...