azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

marie misamu - eglise lyrics

Loading...

a là rumba ( yesu kristo ! )
a la rumba yah ! mia vida

pona nini tofandi mesa moko ?
kasi tozali kosolola na fausseté
pona nini ozali komelisa nga mayi ya bololo po na sanza
olingi yo oyeba biloko naliaki
osala nionso po oyeba bolumbu na ngai
oyo ezali hmm ba défauts pe bolembu na ngai
ndeko tango mosusu ekoyela yo
ofanda mesa moko na bayini na yo
olia sani moko omela pe kopo moko
tango mosusu pe ndako moko
tango mosusu pe mbeto moko
keba basala bilanga na mokongo na yo te
soki ofandi na moninga na yo
ozali koloba monoko moko te
sala noki oyeba identité nani ya solo
keba kolia biloko epola
keba poison to lipa na mabanga na kati
oyo ezali hmm balakisi ya mabe

omoni ndenge nakomi eh (ah eh)
baleisi ngai biloko ya mabe oh (ah eh)
balingi nde nakufa eh (ah eh)
bino bomemi nga nde wapi oh (ah eh)
walayaye ( waalayayeee )
tuna ngai nayebisa yo
ngai nawutaki nde kuna oh
( ahh iiihhh, yoka ! )
ata ezui yo olela yo na nani eh ye
tala bilei ezanga mungwa
po moïse alongolaki sapatu
bango pe balandi balongoli sapatu
nzoka nde pona biso elakisi tolongola etamboleli ya mabe
liboso na nzambe nkolo

salomon azalaki na basi kotombo oh
bango pe balandi bazui basi ebele oh
nzoka nde elilingi ya makambo ekoya oh
pole alobi na 1 corinthiens 11
biso nde ba fiancés na yesu mobali ya basi ebele oh, ayi

walayaye (eh)
tuna ngai nayebisa yo (tuna ngai nayebisa yo)
ngai nawutaki nde kuna oh
ata ezui yo olela yo na nani eh ye

yo moteyi, oteya bomoyi kufa te oh
tala lipa na mabanga na kati oh
tala poison na mesa opesi biso eh
teya na molimo elobi pole maloba moto ememaka liwa eh
molimo ememaka bomoyi oh

kofanda na mboka jéricho eza malamu
bafandi balobi mayi oyo eza na kufa
élisée atie mungwa na mayi na kombo na nzambe
kufa elongwe epesi bomoyi nakati ya mboka eh
moteyi longola poison na mateya oh, ayi !
walayaye (ayi)
tuna ngai nayebisa yo (baila, baila, baila, ah ah)
ngai nawutaki nde kuna oh (oka)
ata ezui yo olela yo na nani eh ?

eh (walayaye)
walayaye (mambu mingi)

ndeko biloko nionso bakopesa yo
pesé yango na balance ya molimo eh
benga molimo santu asunga yo oh
ata pasteur keba moto akosala na ye bolia sani moko eh
bo partager vision moko te oh
eh na eklesia moto moko amemaka vison eh
lokola yesu kuna na feti ya canaan eh
abongoli mayi vino, bato bameli eh
nzoka nde basali bayebaki yango kala eh
yango mondimi kobeta tolo te na likambo mosali ya nzambe alobi
ewutaka nde na yesu eh
ah minha vida

ah eh, ah eh, ah eh (eh)
kitalatala, yesu na ngai oh
mamma mia, mi amor (eh mamma mia, mi amor)
likambo na nga etali ngai na ye (likambo na nga etali, ah eh, ah eh)
ah eh, ah eh, ah eh
kitalatala, yesu na ngai oh (kitalatala, yesu’ango)
mamma mia, mi amor (mamma mia, mi amor le)
likambo na nga etali ngai na ye (likambo na nga etali ngai na ye ah eh, ah eh)
ah eh, ah eh, ah eh
kitalatala, yesu na ngai oh (kitalatala oyo yesu’ango)
mamma mia, mi amor (mamma mia eh, mi amor ye)
likambo na nga etali ngai na ye (likambo na nga etali ngai na ye ah eh, ah eh)

ah eh, ah eh, ah eh (ah eh eba)
kitalatala, yesu na ngai oh (ah latino eh, magloire)
mamma mia, mi amor
likambo na nga etali ngai na ye (likambo na nga etali ngai na ye eyi, ah)

nzambe sunga basali na yo pe bana na yo
mema biso ndenge olingi papa eh…



Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...