azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

marie misamu - famille ya souffrance lyrics

Loading...

ezalaki na moto moko na jardin eden kombo na ye adam eh
aboyaki kotosa mokeli na ye, alandaki toli ya mwasi na ye
yango wana biso tobima ba victimes ti lelo oyo
pasi esilaka te oh, souffrance

moto soki akobotama awuti na ye na libumu
ayebi na ye eloko te bayambi ye oh
kobima na ye na mokili ayebi na ye eloko te
nzoka nde famille ya souffrance bazingi ye oh
afandi na ye na mokili ayebi na ye eloko te
nzoka nde famille ya souffrance basali makita oh papa

famille ya souffrance bino nde ba nani?, nafandi, nakanisi tango molayi
souffrance ayaka na ba ndenge misato
oyo ya liboso nakolinga oyo nzambe atindaka na bomoyi na biso
eza école ndеnge bana israël na désert oh
ngai nakoboya souffrance ya mibalе oyo moto ye moko alukaka eh
nakozanga kotosa lokola adam na eve oh, papa eh
oyo ya misato oyo satana atindaka
na bomoyi ya bana nzambe oh lokola job eh

ah tala nzambe souffrance ekomi na ekuke ya bomoyi na ngai oh
bakoteli ngai eh
ah papa tala maladie ekoti nzoto eh
naluka monganga, monganga apesi kisi nabiki eh
makanisi esili pauvreté eye
naluka solutions mosala balongoli ngai eh
mbongo eza te bana balongwe kelasi eh
poto naya nde kala na mokanda te oh
séparation ememi divorce oh
ah ngai oyo échec ekomi compagnon na ngai oh
na butu naluka pongi ennemi ya liboso nde pongi eh
biloko ya kolia naloba te oh
ah ngai oh liwa ekomeli ngai na ndaku papa
olongoli ngai posa ya mokili
yango nini yo na ngai soucis ?

(yo omoni eh)
olongoli ngai posa ya mokili (ah papa eh)
yango nini yo na ngai soucis?

soucis eh, soucis eh, soucis eh, soucis eh
soucis ekoteli ngai na motema oh, oh papa

soucis eyaka lokola niama ezali kolanda être humain oh
po e dévorer gorge na yo comme un loup dévore un mouton, pasi eh
soucis ezali lokola moto nzete na kati ya dessert
elongoli kitoko na yo, papa omoni ndenge nzoto esili ngai oh
soucis ezali lokola ebale etiki nzela elekaka
e inondé motema na ngai ebuki ba produits, ba espoirs nazalaki n’ango
soucis eyaka invisible nabunda na yo ndenge nini
ngai ko miso ya mosuni nazali limitée oh papa
soucis yo venin y’ozali ko empoisonner ba pensées ya moto
ozali kolongola droit ya vie ya moto po awumela na mokili te

baye totanga kelasi moko bozui na bango facile oh
oyo ya ngai oh kaka manœuvre oh
toya poto nzela moko bango bazuaka nde facile
oyo ya ngai oh kaka mizele, nasali nini eh ?
kasi soki tolingi tokima yango tokima epayi na yesu
ye nde mosungi ya kokamwa abatelaka biso
akufaki na gologotha alongolaki souffrance eh oh
yo nde papa na ngai oh, sala na ngai oyo olingi eh
baninga bazuaka na pasi te ngai kaka pasi
mizele oh, mema ngai bisika olingi eh

olongoli ngai posa mokili soucis eh
yango nini yo na ngai, soucis?

ah ngai nayebaki te nzoka nde famille ya souffrance
ekoteli ngai eh (ekoteli ngai eh papa)

ah nzambe sunga ngai oh nasala oyo nakoka kosala eh
na bomoyi na ngai eh (nasalaoyo nakoka ko sala eh papa eh ye ye)
nzoka nde famille ya souffrance eh…



Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...