adorons l’éternel (gael music) – loyembo la ngai lyrics
nkolo yamba loyembo la nga
libonza ya moto asimbami na yo
nazali elembo ya bolingo bua yo
mokonzi ya bomoi na ngai
otika likolo polele masiya
po tomona kembo pe nguya na yo
oza liziba lia mayi ma lobiko
yo nk+mu ya bank+mu banso
y’ozali bopemi bua ngai
bipayi nakotika mik+mba mia ngai
ozali solo likonzi lisimbi ndako
masiya na ngai
y’ozali lok+mu la ngai
bipayi nakosímba soki nalembi
ozali bipayi nakitisaka motéma
masiya na ngai
ozali nzete ya bolingo masiya
nakati y’elanga ya motema na ngai
epesa fololo ya malasi kitoko
na miso ya nzambe na bule
opesa bokono kombo ya lobiko
obenga liwa na kombo ya mpongi
po ete lisekwa lizali yo masiya
mokonzi ya bakonzi banso
nasopi motema na ngai
liboso ya kiti ya ngolu na yo
po ete lobiko na ngai ekowuta na yo
masiya na ngai
kitisa nguya na yo nkolo
awa tokobelela kombo na yo
lakisa biso nkembo pe makasi na yo
nzambe na nguya
yamba maloba ya motema na ngai
mosopani liboso na yo mosantu
nazongisa kembo pe lok+mu na yo
yo nzela pe bomoyi ya seko
ata molili ya mokili eyindi
mwinda mua yo moko ngengisa nzela na ngai
oyo asimba ngai loboko ezali yo
mokonzi ya bomoyi na ngai
nasopi motema na ngai
liboso ya kiti ya ngolu na yo
po ete lobiko na ngai ekowuta na yo
masiya na ngai
kitisa nguya na yo nkolo
awa tokobelela kombo na yo
lakisa biso nkembo pe makasi na yo
nzambe na nguya
Random Lyrics
- ftp – taksist lyrics
- good with parents – dear 2018 lyrics
- harmony chea – up for it lyrics
- brigistone – freestyle nzete lyrics
- bount – lakers lyrics
- vadez – chapitre 1 : ardisson lyrics
- גלעד כהנא – eshet hail – אשת חיל – gilad kahana lyrics
- lilf lemos – latrel freestyle lyrics
- мирби (mirby) – кружка (mug) lyrics
- 12th planet – next shot lyrics