azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

charles mombaya – bokeba lyrics

Loading...

[couplet 1 : macaire kalabasi]
bino basambeli ya bikeko
boyoka nanu ngai nayebisa bino
bino bandoki pe banganga
boyoka nanu ngai nayebisa bino
bino batshioli na masiya
boyoka nanu ngai nayebisa bino

[pré+refrain 1 : annie mobejo]
lifuti ya masumu ezali kufa, ezali kufa
kasi nzambe akopesaka bomoyi ya pamba, ya ofele bandeko
likabo na ye na bomoyi ezali yesu, ezali yesu
[refrain]
bokeba
bokeba (baninga)
bokeba (oh, bandeko)
bokeba

[couplet 2 : philomène mombaya]
bino batshioli na bandimi
boyoka nanu ngai nayebisa bino
bino miyibi pe babomi
boyoka nanu ngai nayebisa bino
bino bayini pe bandoki
boyoka nanu ngai nayebisa bino

[pré+refrain 2 : charles mombaya]
bomikosa te bandeko nzambe akokosamaka te
moto akolonaka madesu akobukaka se madesu
mosali na masumu akozuwa se libebi

[refrain]
bokeba (baninga)
bokeba (baninga)
bokeba (oh, bandeko)
bokeba

[couplet 3 : maman tuzolana]
bino balangwi na masanga
boyoka nanu ngai nayеbisa bino
bino bandoki pe banganga
boyoka nanu ngai nayebisa bino
bino bateyi ya lokuta
boyoka nanu ngai nayеbisa bino
[pré+refrain 3 : claude kamanda]
bokonzi na nzambe ezali peto, ezali peto
moto nionso akowulelaka na masumu akozanga
bokonzi na lola ekozala se pona babulami

[refrain]
bokeba (baninga)
bokeba (baninga)
bokeba (oh, bandeko)
bokeba

[pré+refrain 1 : marc nzolani ngawanu]
lifuti ya masumu ezali kufa, ezali kufa
kasi nzambe akopesaka bomoyi ya pamba, ya ofele bandeko
likabo na ye na bomoyi ezali yesu, ezali yesu

[refrain]
bokeba (baninga)
bokeba (baninga)
bokeba (oh, bandeko)
bokeba



Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...