azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

fally ipupa – naufra-ketch lyrics

Loading...

[intro : dédicace]
merci ya méjé po obota nana ketchup…

[couplet 1]
nana lelo na sosoli
nana na nga lelo na sosoli
que bolingo le veritable ebombana na mitema ya ba fille ya timides
oyo basalaka semblant lokola balingaka te oh (balingaka te, eh)

[couplet 2]
yo oyaki na vie na ng-yi na maloba ya ba santu
na komaki ko kanisa kutu yo nde porte-parole ya nzambe
nga na motema natielaki ye ba anti-vols
po ata après un siècle mobimba moyibi ya bolingo akota te
nzoka yo fraudaki na sentiment pe na vie na nga
na makanisi que na terminus ya bolingo ofuta nga droit ya bolingo te
et pourtant yo salaki mosala mungwa esalaka na bileyi
moninga apesaki yo bolingo o multiplier par nombre nyonso olingi
y’okomisi yango lokola parfum de grande marque
oyo yambo mosombi avant asomba il faut ameka ata ndambo
sima naye soki zomi bakosala lolenge yo osali nga
tango okozonga okokuta nga ya ndambo (esengo ekozala te o mitema nana ah)

dédicace

[couplet 3]
yango lelo nga na bondeli yo ozonga (ozonga)
yango lelo nga na bondeli yo ozongela (ozonga)
oyo ozo sala nga oko bomisa na ba innocents
mayi ya miso nasaleli matanga na yo lelo (dans 10 ans eko inonder le monde entier)
oh nana (yango nasengi onu aya intervention)
po na boyi na provoquer fin du monde oyo nzambe a prevoyaki te
elikia ya suka nazo zela se motema na nga (tango ekokoma debordé na bolingo na yo)
débordé mama (tango nakokoma na nga naufragé)
peut être okoyoka ng’ata mwa mawa na mbelela ya suka na nga
oyo azalaka na monguna te nana
liwa ya bato mosusu soki tozo lela na mawa na mitema
y’olakisi nga yanga moko po nazala lolenge kani ?
bolingo oyo ebandaki n’esengo lokola mwana azongi kelasi na elamba ya sika
lelo y’obongoli’ango mawa
nakoma koyina ti nzambe mokeli na nga
soki likolo eyindi nazo banga mvula enoka, ebungisa matambe na yo
eloko na tikala nango seul souvenir (mais kanisa tango ozalaki ko linga nga)
oh maman (démarche ralenti lokola ba soûlards y’avant indépendance)
avant indépendance, maman (lelo distance otiki ngaï lokola course ya fusée na velo)

[couplet 4]
na yebi nako mona yo lisusu te oh nana ah
zonga opesa nga ata baiser ya suka, etikala soulagement
eh gautier ewing na milan, mon pote

[chœur & dédicace]
yo moto oyaki kozuwa nga na aéroport ya l’amour na
cortège (carole wana)
nzoka mituka oyaki nango pona honneur na nga (ah lipasa sandra
sanze)
ezalaki déception, malheur, misère na ba soucis

[couplet 5]
nayebelaki yo motema makasi boye te nana
kende nzambe a réviser yo
y’okatani mosisa oyo eyokaka bato mawa
y’okatani mosisa ya souci a baninga a

[couplet 6]
nana kombo na yo esi ekoma kisi ya bolingo na nga
soki nazo bela natangi kombo na yo maladie esilaka
parfum nayo lokola likayabu oyo bazali kotumba
mopepe ata ememi solo nayo ata 10 kilomètres nayokaka
y’olingaki no nga te po l’amour esalaka mabe te
moto osekwisaki akufi lisusu akomi nde kopola oyoki n’o mawa te, nana ketchup
lelo nga na ndimi, l’amour est aveugle
po ezuwa toli te na mbeli ya déception ezuwa
yak’olongola nga kindoki ya mukolo lesa nga ekomisa nga kizengi
nasi nakomi na suka
yak’o libérer no nga ah
nakowa pona yo mama
nakokoka mpé kobosana yo te nana
nakokoka mpé kobosana yo te nana
reviens vite mon amour
tu es vraiment unique en ton genre

[chœur]
tu es vraiment unique en ton genre
tu es vraiment unique en ton genre
tu es vraiment unique en ton genre

[dédicace]
mama marcosins…

eh vicky levire

[outro]
tu es vraiment unique en ton genre (décos mukoko yo na camionette mbola, bo bondela nana)
tu es vraiment unique en ton genre
tu es vraiment unique en ton genre



Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...