azlyrics.biz
a b c d e f g h i j k l m n o p q r s t u v w x y z 0 1 2 3 4 5 6 7 8 9 #

mbilia bel – mobali na ngai wana lyrics

Loading...

likambo ya motema oyo
likambo ya motema oyo
bakosamba bakolemba
bakosilisa bazuzi
moto alingi alingi

mobali ya motindo oyo
mobali ya motindo oyo
kitoko etondi na nzoto
azali pe na mwa mbongo
namoni akoki na ngai

nazela te naya kozanga
nazela te naya kozanga
kobala ekoma na chance
basi kitoko batondi mboka
bazanga mabala batula

likambo ya bolingo oyo
bolingo ya mobali oyo
ebeti ba ngonga na mboka
bato na bato baganga
moto naponi naponi

mobali na nga wana nakomema ye na mokongo
mobali na nga wana nakomema ye na mokongo
oh mobali na nga oyo nakoleisa ye na maboko
mobali na nga oyo nakoleisa ye na maboko
oh mobali na nga wana nakoleisa ye lokola bebe
mobali na nga wana nakoleisa ye lokola bebe
oh mobali na nga oyo nasanola ye suki ngai moko
mobali na nga oyo nasanola ye suki ngai moko
oh mobali na nga wana nalongola ye manzaka nga moko
mobali na nga wana nalongola ye manzaka ngai moko
oh mobali na nga oyo nakokufa kaka pona ye
mobali na nga oyo nakokufa kaka pona ye
likambo ya mobali oyo
likambo ya mobali oyo
namoni pasi pona ekolo
ye moto ngai pe moto
nakokamwa tina bakoboya

mobali na nga ya kitoko
mobali na nga ya motema
tokeseni na bambula
tokeseni na еkolo
nakovanda kaka na ye

bolingo ya bambula oyo
bolingo ya batango oyo
eponi ekolo te maman
eponi coulеur te tata
tokoluka kaka tobala

oh pesa nga chance nabala
pesa nga chance nabala
mobali na nga maboko pete
akaba mingi ya mingi
nakokufa kaka na ye

mobali na nga wana nakomema ye na mboka
mobali na nga wana nakomema ye na mboka
oh mobali na nga oyo nakomema ye na equateur
mobali na nga oyo nakomema ye na equateur
oh mobali na nga wana nakomema ye na kasai
mobali na nga wana nakomema ye na kasai
oh mobali na nga oyo nakomema ye na bandundu
mobali na nga oyo nakomema ye na bandundu
oh mobali na nga wana nakomema ye na shaba
mobali na nga wana nakomema ye na shaba
oh mobali na nga oyo nakomema ye na kivu
mobali na nga oyo nakomema ye na kivu
oh mobali na nga wana nakomema ye na haut zaïre
mobali na nga wana nakomema ye na haut zaïre
oh mobali na nga oyo nakomema ye na bas zaïre
mobali na nga oyo nakomema ye na bas zaïre
oh mobali na nga wana nakovanda na ye na kinshasa
mobali na nga wana nakovanda na ye na kinshasa
oh mobali na nga oyo nakotalisa ye na bankoko
mobali na nga oyo nakotalisa ye na bankoko
(animation)
soki ba petits baleli nzala mema mokwa
soki ba petits baleli nzala mema mokwa
mokwa ya nini, mokwa ya lai lai
mokwa ya tika nzala soki balela beta egogo
mokwa ya nini ko, mokwa ya dikidi
mokwa ya tika nzala soki balela beta egogo
beta egogo na motu, beta egogo na motu
motu, motu, beta egogo na motu
beta egogo na motu, motu motu
ba ma kamata somo na mayele epayi ya tata na bango
ba ma lela lela ba ma tshunga tshunga motu motu motu eh

ba ma kamata somo na mayele epa ya tata na bango
ba ma lela lela ba ma tshunga tshunga motu motu motu eh
ba ma kamata somo na mayele epa ya tata na bango
ba ma lela lela ba ma tshunga tshunga motu motu motu eh
mobali na nga wana nakolanda ye na africa
mobali na nga wana nakolanda ye na africa
oh mobali na nga oyo nakolanda ye na brazza eh
mobali na nga oyo nakolanda ye na brazza eh
oh mobali na nga wana nakolanda ye na libreville
mobali na nga wana nakolanda ye na libreville
oh mobali na nga oyo nakolanda ye na yaoundé
mobali na nga oyo nakolanda ye na yaoundé
oh mobali na nga wana nakolanda ye na lagos
mobali na nga wana nakolanda ye na lagos
oh mobali na nga oyo nakolanda ye na abidjan eh
mobali na nga oyo nakolanda ye na abidjan eh
oh mobali na nga wana nakolanda ye na lomé eh
mobali na nga wana nakolanda ye na lomé eh
oh mobali na nga oyo nakolanda ye na cotonou
mobali na nga oyo nakolanda ye na cotonou
oh mobali na nga wana nakolanda ye na dakar eh
mobali na nga wana nakolanda ye na dakar eh
nakolanda ye na bamako, conakry na ouagadougou
nakolanda ye na bamako, conakry na ouagadougou

(animation)
soki ba petits baleli nzala mema mokwa
soki ba petits baleli nzala mema mokwa
mokwa ya nini, mokwa ya lai lai
mokwa ya tika nzala soki balela beta egogo
mokwa ya nini ko, mokwa ya dikidi
mokwa ya tika nzala soki balela beta egogo
beta egogo na motu, beta egogo na motu
motu, motu, beta egogo na motu
beta egogo na motu, motu motu
ba ma kamata somo na mayele epa ya tata na bango
ba ma lela lela ba ma tshunga tshunga motu motu motu eh
ba ma kamata somo na mayele epa ya tata na bango
ba ma lela lela ba ma tshunga tshunga motu motu motu eh

Random Lyrics

HOT LYRICS

Loading...